kalimah.top
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

marie misamu – reconnaissance كلمات اغاني

Loading...

boseka ngáí té pô naza na bibiliya na maboko
esíká nionso na kokende, kombo ya nzámbe na monoko na ngai′oyo

basáli ya nzámbe óyo baza kotéya bísó tango nionso, boyébi té níni óyo nzámbe
asalela bangó pô basálelaka yě, eh

okomona ngáí tango nionso na nzelá káka ya ekelézya, oyébi té níni óyo nzámbe asalela nga pô na kendaka eklezya, eh_eh

ah_ah, motó kutu óyo ya mokili sókí apésí yo eloko osengi merci, eh_eh
ebongo nkóló ya pema, eh, to pessi yě níni

okomona ngai tango nionso naza ko kombola eklézya
oyébi té níni óyo nzámbe asalela nga pô na salelaka yě, yě, yě, yě

ah_ah_ah, ngai_oh
nazali reconnaissante, eh_eh_eh
makambo asalela nga ya minene papá óyo, ho_oh
na wuti na libúlú ya masumu abímísí ngai’oh
esika na zalaki ya liwa eh abimisi ngai′oh
mikolo na ngai ya ko vivre ekomaki nde ya kotanga’eh
pongi na ngai na butu, káka ba ndoto ya mabé
nani akopesa nga loboko, motó na motó na óyo ya yě
nakanisaki libota na nga ekosunga nga epesi nga nde mokongo
nasimbaki moto na kolela ngai, pasi elekelaki ngai_oh, nzamb’oyo

ah_ah_ah, ngai_oh
nazali reconnaissante, na nzamb′oyo_ho_oh
makambo asalela nga ya minene papa oyo, ho_oh
na wuti na libulu ya masumu abimisi ngai′oh
esíká na zalaki ya liwâ eh abímísí ngai’oh
mikolo na ngai ya ko vivre ekomaki nde ya kotanga′eh
pongi na ngai na butu, káka ba ndoto ya mabé
nani akopesa nga loboko, motó na motó na óyo ya yě
nakanisaki libóta na nga ekosunga nga epesi nga mokongo
nasimbaki motó na kolela ngai, pási elekelaki nga_oh, nzamb’oyo

ah_ah_ah, ngai_oh
bomoni tina ngai na lingaka ye
na lapa ndayi na vie na ngai_oh, nakosalela ye_eh_eh
abetaki ekuke ya motéma na ngai, na fongoli akoti
ye wâná camarade ya motéma na ngai_eh, eh, eh, nzamb′oyo

motó na motó na ngónga na ye
abetali ekuke ya motema na ngai na fongoli akoti
yě wâná camarade na ngai_oh
yě wâná thermomètre ya température na ngai_oh_oh
yě wana mayi na nga ya komela ekitisaka nga motema
yě wâná bileyi na nga ya koliya na tango ya nzala_eh
yě wâná menteau na nga_oh, na tango ya malili
ye wana makasi na ngai_eh, tango na lembaka_eh, pap’oyo_eh
ye wana réanimation ya pema misamu, yeh, yeh, yeh, nzamb′oyo
ye wana parapluie na ngai_oh, na tango ya mbula
ye wana kisi na nga ya komela na tango ya maladie
ye wana asilisa pási na ngai_oh, pap’oyo_oh
ye wâná alongola soni na ngai_oh, pap’oyo_eh, nzamb′oyo
ye wana parapluie ya christian likasi_eh_eh

ah_ah_ah, ngai_oh
bomoni tina nga na yembelaka ye
na lapa ndayi na vie na nga yo na kosalela ye_eh
abeta ekuke ya motema na ngai na fongoli akoti
ye wana camarade ya motema na ngai_oh, oh, oh, pap′oyo
motó na motó na ngónga na yé
abetaki ekuke ya motéma na ngai na fongili akoti
ye wâná camarade na ngai_eh eh_eh_eh
ye wâná moninga na nga ya motéma_yeh_eh_eh
ye wâná makási na ngai_eh
ye wâná mayi na nga ya komela
ye wâná vie na nga mobimba…

كلمات أغنية عشوائية

اهم الاغاني لهذا الاسبوع

Loading...