kalimah.top
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

marie misamu – réalité كلمات اغاني

Loading...

ozui malade, okei epai ba dokotolo
balobi malade na yo eza na kisi te
eza réalité ya vie

ah yo obotaka te, minganga ba condana yo
balobi vie na yo mobimba okosimba muana te
ondima réalité ya vie, mama eh

ndeko owuti kobungisa ndeko, akotaki na coma eh
minganga basali nionso balembani balobi akufi na ye
oyo pe eza réalité ya vie mama eh
basusu bakanga bango na mpungu eh
elengi ya libala bayokaka kaka na sango
suka suka bazonga ndako ya baboti
oyo pe vraiment eza réalité ya vie

ngai nayebi pe mosala maboko
esika nionso nakobeta porte ata toza babale
ba kozua moko batiki ngai
eza réalité ya vie

vie na nga nde somo, papa vie na nga problème
nakoya kokufa pamba, soki otiki nga nasambue kosambua eh ah, nga pasi eh

libota na nga pasi libota na nga somo
natuni balobi nga nandima réalité ya vie
pona nini basusu bazuaka basusu bamonaka pasi nzambe?
moyi еbimaka pona moto nionso eh ma
mbula ebetaka pona moto nionso, butu
butu еyindaka pona moto nionso ngai eh
moyi ebimaka pona moto nionso
natuni balobi nga nandima réalité ya vie namoni pasi

vie na nga nde pasi eh, nakoya kokufa pamba ngai eh
soki otiki nga nasambue kosambua eh
kombo na yo ekoya kotshiolama pamba nzambe na ngai
ngai bazotuna nga wapi nzambe na yo eh aza wapi
réalité ezalaka kaka boye, vie ya moto kaka boye
cond_mnation ya bato ya mokili ezalaka kaka bongo
kasi eza na maitre moko soki akoti na motema na yo
achangeaka histoire ya vie, impossible ekomaka possible
kombo na ye jehovah jiré
kombo na ye jehovah shalom eh nzambe ya paix
kombo na ye alpha omega ebandeli mpe suka
kombo na ye nzambe malamu, nalela vie na nga

(yesu, yesu solution ya vie na ngai eh, papa eh)
nalingi nabetela yo bapasi na nga nayebi te ndenge nini ya kobanda
yesu kota na ba chambre ya motema eh obimisa ba pasi elie nde nzoto eh
(yesu, yesu solution ya vie na ngai eh, papa eh) ah yaya eh, kotika te nakowa eh
basombeli nga lilita basombeli nga lopango
nakufa lelo lobi mosika… nzambe na nga olobi nini eh?
(yesu, yesu solution ya vie na ngai eh, papa eh)
olobi nini eh? olobi nini eh? nga nakomi na suka eh
nazanga papa eh, nazanga mama eh
yo nde okoma nionso na ngai eh yesu nde papa ya bana bitike
(yesu, yesu solution ya vie na ngai eh, papa eh) sunga ngai eh

papa vie na nga somo, vie na nga pasi, vie na nga kokamua
bapesa nga bakombo ebele na mokili, nakima wapi
soki otiki nga nasambue kosambua
kombo na yo ekoya kotshiolama pamba
yaya bazotuna nga wapi nzambe na yo
oza wapi, oza wapi eh? tata oza wapi oh?
tango olakaki nga eh, tozalaki biso mibale
bilaka na yo na motema, nabombi makasi
yaya na nga nazozela crie ya suka eh
soki ogangi banguna bakimi eh
yaya soki osali te tokoti ndaku
oza wapi eh? oza wapi eh?

كلمات أغنية عشوائية

اهم الاغاني لهذا الاسبوع

Loading...