kalimah.top
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

marie misamu – bouc émissaire كلمات اغاني

Loading...

ndeko, oyebi bapasi mosusu eyelaka biso hein
okomi ko se sentir, okomi vide, noir, sombre
dans le néant, okomi mort
kasi ndeko bwaka miso na yo na likolo
esika lobiko na yo ekowuta epayi na yesu klisto
est_ce que oyebaka que oza acteur ya film, yesu nde réalisateur
est_ce oyebi que acteur akoki koniokwama na ebandeli kino na kati kati mais na suka alongaka
lelo banzinzi bakomi ba consolateurs fâchés na yo
ba consolateurs fâchés ya pota ya motema na yo
mais bwaka miso na yesu
ye wana mobambi ya bapota ya mitema
ndeko, ata okomi lokola moto oyo aza kokata ebale na singa molayi
maboko elembi yo na kati kati, azokoka lisusu kokoma na ngambo te
nzoka nde na ngambo esika eyano na yo ekozuama
mais sala makasi, kamata trompette betela nzambe
yango nde libondeli na yo nde okokoma na ngambo
nalingaka kozua ndakisa oyo mingi ya jacob
jacob alobi “nakotika yo te, nakotik’o te kino okopambola ngai ata obuka ngai mopanzi, nakotika yo te”
oh nzambe, biso nionso tolo na se tozozela ba promesses na yo kino ekokokisama
de toutes les façons okanga biso singa na kingo
nzambe okanga biso ba craquats, tokokima’o wapi
fongola pe esi obungisa cadenas okanga biso
surtout ngai nakokima’o wapi, nakokima’o wapi nzambe na bomoyi, papa
ngai nabengaka yo “monsieur raison” na tina
ata lelo olelisi motema na ngai, olelisi ngai, mais lobi nakoseka
bongo tango nakoseka, nabosani na nga bapasi oyo nazalaki n’ango liboso
monsieur raison ya bomoyi ya bana na nzambe
nani akoki kondima kozua pasi ya moninga ekoma ya ye?
nani yango lisusu akoki kokoma ti na liwa pona moninga na ye abika?
bobele yo
yango wana babengaka yo “bouc émissaire”, eza na tina
nzambe natingami na nga kaka yo
ata lelo okomisi nga lokola job, nakofinga yo te
nakosala yo pe mabe te,nakokangama na yo
po nayebi lobiko na ngai ekowutaka na se na mayi
mayi na liziba, bobele yo mayi na liziba, amen elikia na ngai
soki lelo omoni okomi lisusu tina te na libota, na quartier
na mosala mais kima na ville de refuge
oyebi ville de refuge solo eza nini ?
kasi yango nde eklezia esika tolalisaka moto na biso
nabengaka yesu aza coussin na ngai
tango nalembaka, ye nde moto ako consolaka ngai
yango wana tango nionso nalobaka
“lobela ngai na litoyi ya droite oyo sekele bato bakoyoka te”
yango nde libondeli
nzete ya mbila, mayi ya komela, bilei ya kolia, makasi na biso, oh yesu
omoni yesu pourquoi asopaki makila na croix ya golgotha
mais voile epasukaki, lelo boye ngai nakoki kobondela
nakoki kokende liboso na ye ako répondre ngai
nzoka na kala ezalaki bongo te
omoni, omoni ndenge tobiki, omoni ndenge afungoli biso porte
omoni ndenge afungoli biso porte, omoni ndenge afunoli yo motema
mais ndeko bondela, ye nde eyano na biso
ye nde babengi ye “docteur du salut”
ye nde “le créateur”, ye nde “solution” babengaka ye “porte”, “porte ya bénédiction”, “mobali na libala”
yango nalingaka ye mingi, nayembeli ye loyembo oyo
nalobeli ye makambo oyo po a comprendre
oh ndeko yo pe o comprendre que ye wana nde suka ya bomoyi ya bato
ye nde suka ya mitema na biso, amen

كلمات أغنية عشوائية

اهم الاغاني لهذا الاسبوع

Loading...