kongoliz – bandela كلمات اغاني
[intro]
yoka
mwan’a mboka
to leka !
[refrain]
isitwale na biso e sengeli ba bandela
ba pesa biso ba konzi lokola mandela
to sala manso to koki po mboka e bonga
to lingana, to yokana , to sangana, to tonga
isitwale na biso e sengeli ba bandela
ba pesa biso ba konzi lokola mandela
to sala manso to koki po mboka e bonga
to lingana, to yokana , to sangana, to tonga (hè !)
[couplet]
na kala, mutu mwindu a zalaki makasi
kasi
tala lelo a zo mona pasi
bilenge, mikolo, mibali na basi
a zangi nini ? a za na wolo
a zangi nini ? maboko to makolo ?
a tik’o sambela nzambe ya mindele
ata ndele
a simba nde bendele
ba ko benga nga liboma to ndoki
ba bosani e sengaka motoki
po mosala e pesa nde lifuta
wapi tata ? mama, kanga liputa !
bo yak’elongo po to tonga mboka
na mituni soki bo ko yoka
to za mboka ya ndombolo to rumba
kasi, to za pe mboka ya lumumba
[refrain]
isitwale na biso e sengeli ba bandela
ba pesa biso ba konzi lokola mandela
to sala manso to koki po mboka e bonga
to lingana, to yokana , to sangana, to tonga
isitwale na biso e sengeli ba bandela
ba pesa biso ba konzi lokola mandela
to sala manso to koki po mboka e bonga
to lingana, to yokana , to sangana, to tonga
[outro]
soki o lingi ndzemb’oyo (bandela)
ata kutu o lingi na yo te (bandela)
pona kmt kmt kmt (e bonga)
yaka, to simbana loboko (to tonga)
mwan’a mboka
hè !
kmt kmt kmt
kakilambe
isitwale na biso e sengeli ba bandela
ba pesa biso ba konzi lokola mandela
to sala manso to koki po mboka e bonga
to lingana, to yokana , to sangana, to tonga (to tonga)
كلمات أغنية عشوائية
- poor bishop hooper › poor bishop hooper – psalm 37 كلمات اغاني
- chloe ament › chloe ament – cliche كلمات اغاني
- charlotte wessels › charlotte wessels – afkicken كلمات اغاني
- рамш ramsh › рамш (ramsh) – паутина слов (web of words) كلمات اغاني
- unknown artist › unknown artist – fuk tha clout كلمات اغاني
- yournumber1 › yournumber1 – wasted كلمات اغاني
- apangrypiggy › apangrypiggy – no more cake (remix) كلمات اغاني
- lilith › lilith – ilumina mi كلمات اغاني
- soulja creep › soulja creep – learned it all كلمات اغاني
- believe you me › believe you me – as if i were dead كلمات اغاني