kalimah.top
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

fally ipupa – emeraude كلمات اغاني

Loading...

pene’ya nkoyi soki ba mboloko
bakomi’oleka na kimia
yeba, libumu’a nkoyi esi’etondi

pene na yo ata nalie ba ngombe zomi
nzala na nga pona yo ezo koka te eeeh

nzoto na yo nioso pe’eza invitation ya l’amouuur
ya bonheuuur ee eeeh

ezaaa bolingo te eeeeeh
ezali plus que amouuuuur
oyo’etondi iii na kati’a motema na ng-yi

eza philosophie iiiih
ezali pe doctrine eeh
oyo’esangisi mitema ya ng-yi na mich-lle

deux milles ba kweyi na gauche
dix milles ba kweyi na droite na biso
ya edgard na mich-lle
elongi mbonge na ba’inondations onh

mich-lle azali emeraude eeh
impérissaaaaable
bolingo’ya mich-lle eko kawuka aa
sima ba océans anh
dictionnaire ya l’amour na nga’etonda aah
obe na kombo’ya mich-lle

nga kaka na ye eeh
na ko changer ye te eeeh
mich-lle ye nde’aza toujours la plus belle eeh

basi ba koma kolala pongi ya nguma ekenge’eleka
mich-lle alalaka lokola bébé eeh
po’ayebi asi’alonga motema’a edgard
émeraude enzulukaka te eh

mich-lle ngueso est toujours la plus belle
pe’emataka talo soki’ezo rumela aah

basi ba koma kolala pongi ya nguma ekenge’eleka
mich-lle alalaka lokola bébé eeh
po’ayebi asi’alonga motema’a edgard
émeraude enzulukaka te eh

mich-lle ngueso est toujours la plus belle
pe’emataka talo soki’ezo rumela aah

sans mayi
est-ce que’ebale’eko zala aaah
non non non non non non noooon oooonh

sans mapata
est-ce que likolo eko zala aaah
sans mabele
est-ce que moto’ako telema aah
non non non non non non nooon

bo pekisa nga ye te
azua déjà tout
ye’akanga tout uuh
ye’ajali iii tout uuh
apesaka nga tout uu aah

soki’olingi moto ooh
ko tika ye te
kanga ba nzela naye nioso’yazala ya yo
ezali pasi te voiture’ezala ya yo
mais kasi moto mobimba po’azala ya yo
eza nzaka ve ee eeh

qui a dit que ee eeh
ba’angelus uuh
ba zalaka kaka na paradis iih
bongo mich-lle aza nani eee eh

bino bo lobaka que kitoko’ya mwasi fololo
bongo mich-lle pauline azo faner eeeh
aza’émeraude inzulucable ee eeeeh

na lela na nga ye eeh
na langwa na nga mich-lle
azongisaka nga comme au premier jouuur
secret na ye’asambelaka mingi
aliaka misuni mokie, ba fruits ebele ooh

nako latisa banderole na molayi’ya tour eiffel
na koma mich-lle na edgard for life
soki ba touristes ba tuni ba oyo nde nani
boloba
bolobani mich-lle

mich-lle, mich-lle ya edgard
bolobani mich-lle
edgard, edgard ya mich-lle
mich-lle bonheur
uouh, oy’ya biso bonheur

mich-lle liaka mbongo na nga ndenge’olingi eeh
mich-lle liaka mbongo na nga ndenge’olingi eeh

mich-lle numéro ya compte na nga yango’oyo
mich-lle bimisa mbongo na nga ndenge’olingi eeh

mich-lle code ya coffre-fort yango’oyo
mich-lle tokaka mbongo na yo ndengo’olingi
ah mich-lle maman’a bana na nga na lela yo
mich-lle maman’a bana na nga na lela yo

non non non non non non non non oonh
mich-lle maman’a bana na nga na lela yo

bolobani mich-lle
mich-lle abatelaka nga
bolobani mich-lle
na lova na nga mich-lle
mich-lle bonheur
uouh, na bala bonheur

mich-lle liaka mbongo na nga ndenge’olingi eeh (eeeeeh)
mich-lle liaka mbongo na nga ndenge’olingi eeh

mich-lle code ya black carte yango’oyo (ouuh)
mich-lle bimisaka mbongo na nga ndenge’olingi eeh

mich-lle code ya coffre-fort yango’oyo oh
mich-lle tokaka mbongo na nga ndengo’olingi

po nayebi’olingaka nga pona mbongo te motema mich-lle
mich-lle batelaka bana na nga
mich-lle batelaka bana na nga eh

كلمات أغنية عشوائية

اهم الاغاني لهذا الاسبوع

Loading...