kalimah.top
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

aime nkanu – lolenge ya klisto كلمات اغاني

Loading...

yawe na biso pesaka kimia na yo
ngolu na yo tosengi, yoka pe kolela na biso
yawe na biso pesaka kimia na yo
ngolu na yo tosengi

kangama na nkolo eh mokili ekoti pasi
na ba ebele y’ototangi toluka boboto bomoyi ya bosantu
liloba ekokisami na tango ya suka pasi ekokota
mabele ekoningana, bikolo minene makasi ekosila bakokabuana

tobosani bilaka eh, tala tokomi kolemba
bitumba esili te, bibundeli tobombi wapi
totie kondima pembeni tokomi na posa ya nzoto te ndeko na nga
tozongela bolingo ya liboso tolata lolenge ya klisto

na ngomba bipayi na bipayi kasi pasi ekobakisama
totala moke sima tozonga na lingomba bandimi ya liboso
soki moko azui ebandaki bango kokabola
lel’oyo eklezia ekoma ebombamеlo ya mabe nionso ya mokili
zuwa, lolendo, ekobo еwuti wapi eh
biloko na zando po bapekisa bandimi
nzoka biso baklisto esengelaki tozala ndakisa
tozongela bolingo ya liboso tolata lolenge ya klisto

revêtons_nous de la marque du christ
yawe na biso pesaka kimia na yo
ngolu na yo tosengi, yoka pe kolela na biso
yawe na biso pesaka kimia na yo
ngolu na yo tosengi, yoka pe kolela na biso
yawe na biso pesaka kimia na yo
ngolu na yo tosengi, yoka pe kolela na biso

mangomba ezangi moke kasi ekobakisama baninga
totala moke sima tozonga na lingomba bandimi ya liboso
bazalaki kosangisa na bokabuani ezalaki te na kati eh
mibongisa na nzoto ezui esika na kati ya lingomba
bokeseni ezali te na bandimi pe bapagano
mokolo ya suka tokosambwa na miso na yawe mokonzi na biso

yawe na biso pesaka kimia na yo
ngolu na yo tosengi, yoka pe kolela na biso (salisa biso eh)
yawe na biso pesaka kimia na yo
ngolu na yo tosengi, yoka pe kolela na biso (yokela biso mawa)
yawe na biso pesaka kimia na yo (kotala mabe na biso te)
ngolu na yo tosengi, yoka pe kolela na biso
yawe na biso pesaka kimia na yo
ngolu na yo tosengi, yoka pe kolela na biso (alleluia)

yesu masiya, ye nde espoir ya humanité
na biso toyamba ye liloba elobi tokomi bomoko na ye
kasi mawa soki tokotambola lisusu lokola bapagano
tokosangisama eh
tozongela bolingo ya liboso tolata lolenge ya klisto (totika kopona pona eh)
tozongela bolingo ya liboso tolata lolenge ya klisto (1 pierre 2 verset 12)
tozongela bolingo ya liboso tolata lolenge ya klisto (bongisa bolingo na mosala)
tozongela bolingo ya liboso tolata lolenge ya klisto (matthieu 5 verset 16)
tozongela bolingo ya liboso tolata lolenge ya klisto (zongela bolingo ya yambo)
tozongela bolingo ya liboso tolata lolenge ya klisto

كلمات أغنية عشوائية

اهم الاغاني لهذا الاسبوع

Loading...