kalimah.top
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

patient muhiya – espere encore كلمات اغاني

Loading...

ata na pasi ata minioko ooo
na kosimba se kombo na yesu
ata elikya esili nioso ooo

na kosimba se kombo na yesu
ata mipepe to ba mbonge ekoya eee
na kosimba se kombo na yesu
ata na kati ya kimobange na nga na sala nini eee
na kosimba se kombo na yesu
soki elikya esili nga aaa
na kosimba se kombo na yesu
ata baninga ba kotika ngai ee nga ee
na kosimba se kombo na yesu
kombo na yesu epesameli biso
ahhh mosusu nani
mosusu nani yaya (kombo na yesu ek-mama lelo)
kombo na yesu esengo ya motema na nga
ahhh mosusu nani
mosusu nani ee (bobele yo osimbi nioso)
elikya ya mitema to sanjola yo
to yembela yo (ahhh mususu nani)
liziba ya ngolu nioso (kombo na yesu ek-mama lelo)
ozua nga na se opesi pe tina na miso ya batu (ahhh mususu nani)
losako mokonzi na nga (bobele yo osimbi nioso)
kombo ahhh mususu nani
kombo ya masiya na nga (kombo na yesu ek-mama lelo)
ata ya nga makambu ezo simba te, ezo beba kaka
na kosimba se kombo na yesu
ya ngai maladie ezangi minganga, ezangi pe kisi nga oyo
na kosimba se kombo na yesu
na tikali kaka ngai moko (loboko na litama)
boye na sala nini (nani asalisa nga)
na kosimba se kombo na yesu
tango mayele esili nga, pasi etungisi nzoto
na kosimba se kombo na yesu
na zangi bisika na tiela misu, ebongo na tala nani
na kosimba se kombo na yesu
moninga moko na tikala na ye se yesu (moto ya makasi na nga ee)
moninga malamu eh (atikaka ngai te)
makasi oyo ememelaka nga nioso ya motuya (ahhh mosusu nani)
masiya yesu eh (bobele yo osimbi nioso)
atelemisi ngai alobi konde ekosalama boye (alobi kende liboso)
masiya yesu (kombo na yesu ek-mama lelo)
asimba nga loboko alobi nani akotelemela yo (nani akotelemela ngai)
ngai naza ya yo eh (oza pe ya nga eh)
mosantu na lola yamba ya nga loyembo ya motema (ofandi na loboko ya tata)
masiya yesu na nga (bisika bileki na likolo oo)
liziba ya ngolu oyo ekawukaka te (osungami na lisungi ya moto te)
makasi ya mabota eh (bobele yo osimbi nioso)
kombo na yesu makasi na nga eh
eyano na nga (esilaka ngala te)
esengo na nga yaya eh (kombo na yesu ek-mama lelo)
ebongo lokola masiya akowuta nzela nini eh (akobotama te)
akobimela wapi (bobele yo osimbi nioso)
elombe elombe na nga
elombe elombe na nga
elombe (mosungi na nga)
elombe (elombe na nga)
elombe (liziba na nioso)
elombe (telema na kembo na yo yesu)
moto ya makasi ya baye bazanga makasi oo
lokola nga oyo
elikya na tikala na ngo na mokili ya se
ezali se yo nzambe na bomoyi nkolo
mokonzi yoka mawa, yaka pene na nga
buato eza ko zinda,
elombe na nga
tanda loboko na yo oo
bolingo ya motema na nga

كلمات أغنية عشوائية

اهم الاغاني لهذا الاسبوع

Loading...