
papa wemba - nandimi كلمات أغنية
nandimi eh babenga nga zoba na bolingo
mais motema ezua pepo po epona n’ango oyo eh
yeba eh eloko elingi motema ata olobi eza makele ya fourmi
na kati ya zando, sans effet eh
un homme peut être amoureux comme un fou
bolingo ya solo eloko elingi motema
mais non pas comme un sot (je t’aime)
maman oza wapi obondelela ngai bolingo na ngai f_nny mbilo
effort nasali lokola ngungi oyo azoluka abenda makila na ebembe
f_nny nalingi asebisi mbanzi asala motema na ngai kamundele oh
alelisi ngai lokola ayo bapimeli ye bibеron eh
eh ngai eh eh (еh ngai eh eh)
eza te po nazolia likayabu
nde naza fanatique ya mungwa oh oh oh
souffrance ozomonisa ngai
kokanisa te que nasepelaka n’ango chérie eh eh (nakokufa te)
motema nkoyi liboso ya boloko
ozui yango wapi oh?
eza ya solo pinzoli ya mpese
epesaka soso mawa te oh
akoboma ye kaka oh (ndenge yo pe yo bomi ngai eh oh)
ako barrer ye sans pitié eh (ndenge yo si osasi ngai)
mwana papa ah ah mbilo
f_nny nabanzaki kanda na yo ya mua ngonga ekoleka n’ango eh
mais ekobanda tongo ti pokwa olali kaka n’ango chérie eh
na sukali ya lolemo na yo naponi na ngai kongo bololo eh
nakokoka te kobungisa yo eh
posa ya eloko elingi motema eleki posa ya mayi oh ye ye oh
nandimi eh babenga nga zoba na bolingo
mais motema ezua pepo po epona n’ango oyo eh
yeba eh eloko elingi motema ata olobi eza makele ya fourmi
na kati ya zando, sans effet eh
bolingo ya solo eloko elingi motema eh
nakokoka te ye ye ye
nandimi eh babenga nga zoba na bolingo
mais motema ezua pepo po epona n’ango oyo eh
yeba eh eloko elingi motema ata olobi eza makele ya fourmi
na kati ya zando, sans effet eh
bolingo ya solo eloko elingi motema eh
matama ekeleli maboko na yo epangusaka ngai pinzoli eh
oyo ya nga motema ekoyoka pasi mokolo oko décider okende
déserrer mua moke namona ata lidusu ya kopemela chérie eh eh eh
étouffement makanisi oh kaka présence na yo eko détendre ngai
oyo oh (mokonzi ya badawa) pacifique oh
olali wapi po ngai awa pongi eboyi ko sentir miso na ngai (miso na ngai)
remarque nasali ozosala mobulu lokola ekosila lobi
eza te po osala barrage ya inga nde courant ya chauffe eau ekoboma
yo te oh, ata o draguaka esimbaka kaka komona’ango exploit te oh
po maladie esali eh
kuna ozolanda nini eh oyo ngai f_nny nazangi eh?
namonela yo pasi eh
tongo na ngai ya koseka ekoki mais opesi nga se kolela ah
nandimi eh babenga nga zoba na bolingo
mais motema ezua pepo po epona n’ango oyo eh
yeba eh eloko elingi motema ata olobi eza makele ya fourmi
na kati ya zando, sans effet eh
bolingo ya solo eloko elingi motema eh
nandimi eh babenga nga zoba na bolingo
mais motema ezua pepo po epona n’ango oyo eh
yeba eh eloko elingi motema ata olobi eza makele ya fourmi
na kati ya zando, sans effet eh, ah ouais
bolingo ya solo eloko elingi motema eh
bolingo ya solo eloko elingi motema eh
f_nny mbilo, maman na raya na ayo
tout chemin mène à rome, dit_on
le point final de mon chemin c’est toi
bolingo ya solo eloko elingi motema eh
bolingo ya solo eloko elingi motema eh
bolingo ya solo eloko elingi motema eh
bolingo ya solo eloko elingi motema eh
كلمات أغنية عشوائية
- calboy - pushin p (freestyle) كلمات أغنية
- rhea key 1024 - blocked in the shower كلمات أغنية
- komplimenter - не называя имен (without naming names) كلمات أغنية
- ploho - я никому не верю (i believe nobody) كلمات أغنية
- lagerstein - beer bong song كلمات أغنية
- my life with albertine - is it too late? كلمات أغنية
- new sylveon - keyfinder كلمات أغنية
- debashir - шаева كلمات أغنية
- tonha - 777 كلمات أغنية
- banda reflexu’s - madagascar olodum كلمات أغنية