
papa wemba - congo moko كلمات أغنية
ebale ya congo ezali lopango te
kasi ezali se nzela
yawe, yawe benisa congo eh
yawe, yawe batelani congo
yawe, yawe benisani congo eh
yawe, yawe batelani congo
bana congo tolamuka nanu na pongi
totala ndenge tokoki kobongisa mboka
bakoko batikela biso eh
bangala na bakongo, baluba, baswahili
babembe na bateke, balari na bambochi
to′ali bana congo, toyokana eh
bana congo, tolamuka nanu na pongi
totala ndenge tokoki kolingana, koyokana
na mboka oyo bakoko batikela biso eh
kasaï na congo, équateur mambenga
le niari na le poule, la bouenza na lekoumou
tango ekoki tolingana eh
congo mboka monene
tobanda lubumbashi pe na pointe_noire
etonda bomengo na bato ya mayele
elingi etumba te
po etumba ebenganaka kimia
ebomaka bondeko, eteki ekolo
boyinani, bobomani pe bokabwani
yawe, yawe benisa congo eh
yawe, yawe batelani congo
yawe, yawe benisani congo eh
yawe, yawe batelani congo
indépendance cha_cha, tozui eh
oh, kimpwanza cha_cha, tubakidi
oh, table ronde cha_cha, ba gagné oh
oh, lipanda cha_cha, tozui eh
tongo etani na mokili ya congo
congo molili esili eh
moto moyindo atekamaka mowumbu eh iye
abetamaka pe fimbu na colon, azui lipanda apemi te
bitumba na bitumba, conflits sur conflits
yeba mboka etambolaka na mokonzi ye moko te
kasi elongo na peuple
imbwa azali na makolo manei
alandaka nzela se yoko eh, ih
bakonzi ya congo, bakambi ya congo eh
bakonzi ya congo, bakambi ya congo eh
denis sassou nguesso, otchombe mondial
joseph kabila eh, bakonzi ya congo
melesi na likanisi monene bozui
ya kotia kimia na peuple
aimons notre terre qui est congo
cultivons_la pour un avenir meilleur
yawe, yawe benisa congo eh
yawe, yawe batelani congo
yawe, yawe benisani congo eh
yawe, yawe batelani congo
prophète simon kimbangu eh, matsoua ndele eh
bana congo bakolela
ebale ya congo ezali lopango te
kasi ezali, ezali se nzela
كلمات أغنية عشوائية
- silver jews - friday night fever كلمات أغنية
- since october - everything كلمات أغنية
- silverlane - the dark side in you كلمات أغنية
- simon joyner - grapefruit كلمات أغنية
- silver apples - you and i كلمات أغنية
- simian - the wisp كلمات أغنية
- shotgun messiah - jihad كلمات أغنية
- silvia dias - untouchable كلمات أغنية
- silver convention - fly robin fly كلمات أغنية
- silverlane - ready to rock كلمات أغنية