kalimah.top
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

marie misamu - camarade lyrics

Loading...

hmm caramba mamá mía, kombo na yo nani oh mama?
ngai soeur kiyika
namoni miso na yo lokola colombe pe etaleli na yo ya innocence
hein
humm mwasi, nalinigi natonga palace d’amour na motema na yo pona libala
olobi nini oh? eh
olobi nini ko mama? eh

ezalaka na moto moko alinga ngai mingi
wuta libumu ya mama eh
ezalaka na moto moko alinga ngai mingi
wuta ebandeli ya mokili eh
libela na vie na ngai oh, oh

ah, tika nanu motema na nga eloba
po kati na yo nazomona liziba ya mayi ya peto
nzoka motema na nga eza na posa ya komela mayi wana
nayebi oza mukolo mama, hein?
osi okomi déjà na esika na nga
olobi nini ko? hein?
olobi nini ko mama kiyika?

yo olingi ngai lelo
nini yango elakisi okolinga pe moninga na ngai yo yo
olingi nga camarade
nini yango elakisi okolinga pe lipasa na ngai yo yo
ye wana motema na ngai yo yo
nameseni na ye oh oh oh
moninga ya libala wo wo
nakoka te kozanga yo oh
ah, mama na ngai, lobela nga nanu vraiment
moto’ango boza na ba relations nini yo na ye
lobеla nga nayeba ye, ah
nalingi nayeba tе, lobela nga nanu vraiment, ah

nazalaki na libumu ya mama nayebaki te
nzoka nde nazalaki na ye oh
kobotama na ngai navimbi na ye elongo
nakoli pe na ye tomeseni
moninga ya motema soki nga nabeli
ye wana liboso
soki nga nakweyi to likambo na vie na nga
ye wana solution
alongola nga posa ya mibali mosusu
ah yesu eh ye
okosalela nga nini oyo ye akokaka te
aza na nionso oh

comment faire pour le connaître ?
je suis prêt à connaître cet homme
pour lui donner les codes de mon coffre_fort qui est mon coeur
afin qu’il soit mon ami, qu’il fasse de moi ce que tu es
et qu’il soit la lumière de notre amour

nalobela yo ya solo, akanga ngai singa
alokota nga na poto poto
nazalaki eloko ya pamba bato batalaki miso te
apesi nga valeur oh
lobela nga soki yo ozalaki na esika na nga
olingaki osala nini eh, eh?
tokata ndayi na ye
moko te na biso ayokisa moninga pasi oh
yo olingi ngai lelo
nini yango elakisi okolinga pe moninga na ngai yo yo
olingi nga camarade
nini yango elakisi okolinga pe lipasa na ngai yo yo
encore une fois, écoute mon coeur pleurer
comme un robinet qui coule sans connaître le [?] ce qu’il va creuser sur son parcours
qu’on deversait une grande quantité d’eau
je n’aurais aucun interet à te faire souffrir
crois à ce que je te dis, un jour tu me donneras raison

lokola nalingi yo mingi
eloko nionso okotinda nga nakotosa kaka oh ye
lakisa nga moninga na yo nameka ata kolinga
noki te naya kozanga yo oh
nalingi yo mingi
linga ngai na libala oh oh
nakoka te nazanga yo oh

moninga na nga (yesu klisto)
hmm lipasa na nga (jésus)
camarade na nga (elohim)
ah eh mi corazón (alpha omega)
minha vida eh (jehovah nissi)
oh lisu na nga (amonaka nga)
ayokaka nga (ayokaka nga)
(alobaka na nga na voix douce oh oh) na voix ya douce

ndima ngai na libala mama
papa tika nakotosa yo oh
ye aza témoin na biso yesu
ye akanga yango likolo
kino liwa ekokabola biso
po nandimi ye na pasi eh ye
mama omonisi nga pasi oh oh
nakoka te kozanga yo eh
nalingi yo mingi oh oh
nga pe nakotosa yo oh
namoni pasi mingi mama
papa ti nga nayebaki te oh
l’esentiel ondimi nga na libala
ah, komonisa nga pasi te eh
nzoto na nga ekomi nde ya yo
motema eza kobeta ngai oh yo
nga pe eza kobeta ngai oh yo
papa eh eza kobeta mbangu mbangu
vraiment ya solo ondimi nga na libala
nga na yo mosuni moko eh
totikala libela, tosala famille
totikala libela, tosala famille

كلمات أغنية عشوائية

اهم الاغاني لهذا الاسبوع

Loading...