kalimah.top
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

collectif kembo na yahwe – louange plus remix كلمات اغاني

Loading...

eugenie lelo:
alleluia, alleluia, alleluia na yesu eh
alleluia, alleluia, alleluia na yesu eh
oh bana na nzambe bakoyemba bakok_misa mokonzi
alleluia, alleluia, alleluia na yesu eh
oh eya na butu eya na moyi tokobanga eloko te oh
alleluia, alleluia, alleluia na yesu eh
ebongo nabanga nini yango? yesu azali na bomoyi
alleluia, alleluia, alleluia na yesu eh

oh yemba alleluia, mama yemba alleluia eh (alleluia, alleluia)
yemba alleluia, papa yemba alleluia (alleluia, alleluia)
toyembela ye, ye nde elonga na biso (alleluia, alleluia)
tok_misa ye, ye nde nzambe na bikamua (alleluia, alleluia)
toyembela ye, ye nde elikya na biso (alleluia, alleluia)
tosanjola ye, ye nde nzambe na bikamua (alleluia, alleluia)
oh yemba hosanna (alleluia, alleluia)
oh yembela masiya (alleluia, alleluia)
lauriane litasi:
yemba alleluia, ngai nayemba alleluia eh (alleluia, alleluia)
yemba alleluia, biso toyemba alleluia (alleluia, alleluia)
toyembela ye, ye nde elikya na biso (alleluia, alleluia)
tok_misa ye, ye nde nzambe ya bikamua (alleluia, alleluia)
na ngomba golgotha, kuna alonga satana (alleluia, alleluia)
yembela jésus eh, yembela mosantu eh (alleluia, alleluia)
toyembela ye, ye nde avocat na biso (alleluia, alleluia)
tok_misa ye, ye nde nzambe ya bikamua alleluia (alleluia, alleluia)

aimée lubinga:
bana nzambe bakotatola elonga
bana nzambe bakotatola elonga
bana nzambe bakotatola elonga (elonga na yesu eh)
bana nzambe bakotatola elonga
frère, frère, frère, frère oh banga nzambe na yo
frère, frère, frère, frère oh banga nzambe na yo

mike flor:
eh bana nzambe bakotatola elonga
bana nzambe bakotatola elonga
bana nzambe bakotatola elonga (elonga na yesu)
bana nzambe bakotatola elonga (eh)
sœur, sœur, sœur, sœur oh banga nzambe na yo (alleluia, alleluia, na nzela ya kelasi)
sœur, sœur, sœur, sœur oh banga nzambe na yo (na mosala, na ndaku ya libala mama na nga eh)
lauriane litasi:
tokosenga lelo papa apambola
litasi asengi lelo, schilo pambola
pambola eh (pambola yesu eh pambola)
oh yahwe pambola ah, masiya pambola eh (pambola yesu eh pambola)

mike flor:
bomoyi na nga napesi na yo papa, papa eh
bomoyi na nga napesi na yo papa
mik_mba na nga napesi na yo nzambe na bomoyi
bomoyi na nga napesi na yo papa (yahwe)
alpha omega, le roi des rois eh (yahwe, yahwe)
alpha omega, le roi des rois eh (yahwe, nzambe na bomoyi)

aimée lubinga:
yemba yemba yemba (yemba)
betaka maboko (yemba)
salaka majunda (yemba)
bakisa mololo (yemba)
yesu yo mokonzi na ngai oh alleluia (yemba)

annie singa:
tango yesu akoya kokamata lingomba
tokobeta mindule palalala lalalala
tango yesu akoya kokamata lingomba (oh, masiya eh)
tokobeta mindule palalala lalalala
mokolo wana baninga liwa ekozala te
tokomona masiya tokotonda na esongo
tango yesu akoya kokamata lingomba (masiya eh)
tokobeta mindule palalala lalalala
jerry lewis mbuyi:
tango yesu akoya kokamata bana na ye oh
kelelo ekobeta palalala lalalalalala
tango yesu akoya kokamata lingomba (lingomba na ye)
tokobeta mindule palalala lalalala

yacinthe esambe:
palalala lalalala (palalala lalalala)
tokeyi na lola eh (palalala lalalala)
bisengo ya lola eleki ya mokili (palalala lalalala)
oyambi yesu te otikali (palalala lalalala)

batty mpoyi, bayilo mayila & benjamin mulumba:
nzambe ozali nzambe ya tango nionso
nzambe ozali nzambe ya tango nionso
mokili na ngai ozali nzambe y’okosaka te
nzambe ozali nzambe ya tango nionso
nabela, nazanga, y’ozali nzambe ya tango nionso
nzambe ozali nzambe ya tango nionso
ata makambo esimbi te, y’ozali nzambe ya tango nionso
nzambe ozali nzambe ya tango nionso
nzambe ya miracle, oko salaka ata na minute ya suka
nzambe ozali nzambe ya tango nionso
esika mayele ya ngai esuki, nde ya yo ebandaka

beta maboko makasi, na milolo alleluia

philcha mombaya, aimé keps, jules mulopwe & daddy mossa:
yahwe na bibele yahwe sanjolama
yahwe na boboto sanjolama
yahwe na bibele yahwe sanjolama
yahwe na boboto sanjolama
yesu boboto na yo ekamuisaka mokili, nkolo na bomoyi
bolamu na yo elekela mokili eh yahwe
yahwe na bibele yahwe sanjolama (yahwe na boboto nionso eh yaya eh)
yahwe na boboto sanjolama
y’osalaki mokili na maloba na yo
y’osalaki pe lola oh sanjolama yahwe
yahwe na bibele yahwe sanjolama (oh)
yahwe na boboto sanjolama
ba ndeke na likolo bakoyembela yo
bisso pe awa na se tokok_misa yo eh yahwe
yahwe na bibele yahwe sanjolama (yahwe y’oleki nionso yaya eh)
yahwe na boboto sanjolama (y’osanjolama)

jc daddy mayuma & yannick ntumba:
ya solo tobengama seko bana na nzambe
ya solo tobengama seko bana na nzambe
ya solo tokobengana libela bana na nzambe
ya solo tobengama seko bana na nzambe
ya solo tokobengana libela bana na nzambe
ya solo tobengama seko bana na nzambe
atako bilaka ewumeli, nakolemba te konetola yahwe
ya solo tobengama seko bana na nzambe
ata ba buaki nga na boloko, na munoko na ngai kombo ya yesu nde eko tongama
ya solo tobengama seko bana na nzambe

john knox mombaya, jamsy mukoma:
nkolo yesu eh yo yo, mayuma aleli yo
nkolo yesu eh yo yo nzambe na nguya
oh mwana nzambe oh yo yo, maman … aleli yo
nkolo yesu eh yo yo nzambe na nguya
abonguanaka te, azali kaka ndenge moko ya yesu eh
oh mwana nzambe oh yo pasteur moses aleli yo
nkolo yesu eh yo yo nzambe na nguya
nkolo yesu eh yo nde, bana baleli yo, yaya
nkolo yesu eh yo yo nzambe na nguya (yaya na ngai yesu)
masiya eh, yaya, zua lokomu eh
nkolo yesu eh yo yo nzambe na nguya (vanda na nkembo eh, tozo k_misa eh)
yaya yesu, fanda na ngwende na yo

(animation)
tombola guitare, tombola guitare awa
na tomboli…
simba yango bien, simba yango bien
na tomboli…
accordez yango, do, re, mi,….
avec ma guitare
beta lindanda lindanda , avec ma guitare, beta lindanda beta lindanda mama
avec ma guitare
beta yango bien , masiya na lola asepela
avec ma guitare
beta yango bien, na ba anges n0binela mokonzi
avec ma guitare
beta yango bien,mbula ya mapamboli ekita awa
tombola guitare tombola guitare
na tomboli
accordez yango , do re mi…
avec ma guitare
david a beti lindanda,ba milimu ya mabe ekimi
beta lindanda beta lindanda yaya
tala biso to bini..o binaka wapi eeee

yesu abomba bomba ngai, yesu abomba bomba moise
bisika ba bombaka ngai
bisika na batamaka na ngai
yesu abomba bomba ngai
awa, kuna eeee ye wana
mutu nzambe a tomboli ye wana
lakisa ye na mosapi, ye wana
aza wapi, ye wana
awa, kuna, eee ye wana

كلمات أغنية عشوائية

اهم الاغاني لهذا الاسبوع

Loading...